Hebrews 8

Kristo azali Nganga-Nzambe mokonzi ya boyokani oyo eleki malamu koleka

1Mama na likambo ya oyo tozali koloba, yangʼoyo : tozali na Mokonziya banganga-Nzambe ya ndenge wana oyo avanda na loboko ya mobali ya Kitiya Nzambe Mokonzi-monene oyo azali na Likolo, 2mpe oyo azali kosala mosala na kati ya Esika ya bosantu, ndako ya kapoya solo-solo oyo Nkolo asala, kasi esalama na moto te.

3Mpe lokola mokonzi nyonso ya banganga-Nzambe batiaka ye mpo na kopesa makabo, mpe mpo na kotumba mbeka ; yango wana, tina ezalakimpe ete Yesu mpe azala na eloko ya kopesa lokola makabo. 4Soki azalaki na mokili, mbele alingaki kozala nganga-Nzambe te, Pamba te banganga-Nzambe bazali oyo bapesaka makabo na ndenge Mibeko etindaka. 5Bazali kosala mosala na Esika ya bosantu oyo ezali kaka elongimpe elilingi ya oyo ezali na Likolo. Yango wana, Moyize, tango alingaki kotonga Ndako ya kapo, Nzambe akebisaki ye boye : Tala malamu, mpo ete osala biloko nyonso na lolenge ya oyo balakisaki yo likolo ya ngomba.

6Kasi sikʼoyo, Yesu azwi mosala oyo eleki malamu, Pamba te ye azali moto oyo azongisaka bondeko na Boyokani oyo ezali malamu koleka, oyo evandi likolo ya bilaka ya malamu mingi penza.

Boyokani ya kala mpe oyo ya sika

7Pamba te, soki Boyokani oyo ya liboso ezalaki na mabe te, mbeletina ya koluka oyo ya mibale elingaki kozala te.

8Kasi Nzambe amonaki mabe na bato mpe alobaki : Nkolo alobi : mikolo ekoya
nakotia Boyokani ya sika
elongo na bato ya Isayele
mpe elongo na bato ya Yudea.

9 Boyokani yango ekozala te lokola
boyokani oyo natiaki
elongo na bankoko na bango,
tango nakamataki bango
na loboko mpo na kobimisa
bango na Ezipito,
Pamba te bakangamaki
na boyokani na ngai te,
mpe natikaki bango,
Nkolo alobi bongo.

10 Nkolo alobi : tala Boyokani oyo
nakotia elongo na bato ya Isayele
sima ya mikolo wana.
Nakotia Mibeko na ngai na
makanisi na bango
mpe nakokoma yango likolo ya mitema
na bango.
Nakozala Nzambe na bango,
mpe bango bakozala bato na ngai.

11 Moto moko te akoteya moninga na ye,
to mpe moto moko te akoteya ndeko
na ye ete : “Yeba Nkolo !”
Pamba te, bango nyonso bakoyeba ngai,
kobanda na bana mike kino
na bakolo.

12 Pamba te, nakolimbisa
mabe na bango,
mpe nakokanisa masumu
na bango lisusu te.

13Awa Nkolo abengaki boyokani wana “Boyokani ya sika”, akomisi boyokani oyo ya liboso, ya kala ; nzokandeoyo ekomi ya kala mpe enuni, ekomi pene mpo na kolimwa.
Copyright information for LinMNB